Ba Episkopo ya ekolo ya Kenya batelemeli bokobi ya kobomama ya basi
Bansango ya Vatican
Na ntango ya likita ya bapanzi-sango na Nairobi na mokolo ya 25 ya sanza ya zomi na moko eleki, Episkopo monene ya Kisumu mpe Mokambi ya lianga ya ba Episkopo ya Kenya, Mgr Maurice Muhatia, atelemelaki bomati ya mobulu, mingimingi na basi: « Tozali kokweisa motango ya basi babomi, oyo ezali komata kaka, yango nde epesi bato bato kanda makasi mpe boyini » ." Episkopo mosalisi Simon Peter Kamomoe ya Nairobi alobaki ete « na basanza oyo euti koleka, Kenya emonaki ndenge nini koboma basi elandisamaki, basi babungisaki bomoi ba bango na ndenge ya nsɔmɔ mpe na mabaku eyebani te », alobaki makasi ete « makambo ya ndenge wana ezali te kokolisa kaka mobulu na bozangi kotosa bomoto ya batu, kasi ekomeme limeseno ya botungisi oyo esengeli likebi ya lombango ».
Baepiskɔ́pɔ mibale babiangi moto nyonso ya motema malamo ateleme
Mboka na biso esambisami na lolonge ya yé yakosambisa bato bato baye bazali bazali na likama makasi. “Bandeko ba biso mpe bamama ba biso batangemi o molongo ya bato basengeli na libateli la biso mpe babongi koyoka bokengi na esika bazali kasi bobangi te, mpo na bomoyi bwa bango” ndenge Episkopo Kamomoe akobaki, asengaki Eklezya esunga mbulamatari na mikano mya ye mpo ya kotelemele mitungisi mina. Archidiocèse ya Nairobi, na boyokani na ministere ya leta mpo na maye matali bokokani ya basi na babali mpe kosala affirmative Action, esengi baklisto nyonso mpe bato nyonso oyo babikela bilamu, ba biangi bakristu banso mpe bato banso bamotema bolamu na kotelemela likambo lina mpo na kozala lokola babateli ya bandeko na biso ya basi. “kokamba mpe kobatela emonisaka bizaleli bya biso ya Bokristo na bolingo mpe kopesana limemya” esukisaki Mgr Kamomoe oyo alendisaki bato ya mboka bayebisaka ba mpulusi soko mwa kokoso emonani mpe bapesa bana toli yakozala mosika na bato oyo bayebi te.
Elongo, tokoki kosala mpo na kosukisa mobulu ya bokeseni etali basi na babali mpe kobomama ya basi kati ya lisanga lya biso. Abiangi mwana nyonso ya Kenya na koyamba ebongiseli oyo mokambi wa ekolo Ruto a bandisaki, oyo ebengami “Bandako mpe bisika ya libateli” na kokutana mpe na kolobela likambo ya kobomama ya basi. Azongeli bongo maloba ya mokonzi wa ekolo, oyo azalaki kolinga ete lisanga ya bato ya Kenya bazwa mayebisi manso na maye matali bilembo mpe ntina ya boniokoli basi mpe makambo oyo ezali mpo na bato nyonso babebisami.
Kobomama ya basi, mabe ya kala na Kenya
Bato ya mayele balobi ete maladi mabe ya koboma basi na Kenya ezali kobangisa. Lapolo ya Organisation Mondiale de la Santé ya 2020, elobi ete basi 47 babomamaka mposo nyonso na mboka ena. Bapanzi-nsango ya mboka “Africa Uncensored” elobi ete kati na 2017 mpe 2023, basi soki 500 oyo basilaki kobomama na Kenya. Mpe lisanga ya Kenya « Femicide Count » bakomaki te, 152 basi kaka na mobu 2023. Mitango oyo emonisi bokoli ya nsɔmɔ ya 50% ya kobomama ya basi na bambula zomi oyo eleki.
Tolingi koyebisa lisusu ete na 1990, basi zomi na mitano oyo babikaki na minyoko ya mpasi ya kosangisa nzoto bafungolaki mboka moko ya kokamwa na kombo ya Umoja na nordi ya ekolo, mpo na kosalisa bana basi mpe basi ya bamboka ya mike na kozala na bomoi ya malamu, ya mobimba mpe ya esengo.
Matɔndi mingi na ndenge otángi nsango eye. Soki olingi kozwa bansango tango inso, mikomisa na manaka ya bansango na kofina awa.