Ba civils ya Mabele Esantu o kati ya ba vœux ya Ordre de Malte epayi ya ba ntoma
Jean-René Bompolonga-Kinshasa
Na mbula eye ya Jubilé, loboko’ mpe charisma ya bobateli boyambi na mosala ya babola, Mokambi Monene Fra John Dunlap apesaki mbela mpo ya ba civils ya Mabele Esantu liboso ya ba ntoma baye bazuami na Malte.
O eleko eye makoki ya bomoto « bitiami pembeni mpe bibebi » na “makambo mabe na nsuka” mpo na ba civil baye bakangami bisika ya bitumba na bipayi mingi ya mokili, Mokambi Monene ya Canada aponami na mobu 2023 alobaki ete « amonaki mabe na mobulu mpe na koboya mikano nionso endimamaki » - ndlr etali bosaleli makasi ya mondoki na basoda o esika ya bitumba. « Ba civils bazali ntango inso ba cible, babuki ba ndako na bango mpe babebisi ba mboka na bango », ayebisaki lisusu, na botangi Gaza, Cisjordanie, Liban mpe Ukraine. “Eyano makasi ya bakambi ya politiki liboso ya koboma ba civil ena ekitisi biso na kimia ya kokamua. Kasi wana bizali biyano bikondimama te liboso ya mpasi ezali kokola ya bato”, emoni mabe Mokambi Monene ya Canada, Ordre na ye ekomisa bobateli ba civil mpe basali mpo ya bato lokola likambo ya motuya na mosala na yango.
Koboya bobebisi ya système international, « lotomo moko ya ezaleli malamu»
« Eyano ezangi mawa ya bakambi ya politiki liboso ya bobomi ya ba civil ena ekitisi biso na kimia ya kokamua. Biyano mana bikondimama te liboso ya mpasi ezali kokola ya bato”, emoni moto ya mobeko mwana ya Canada, na bolobi “lotomo moko ya ezaleli malamu” ya koboya bobebisi ya système international. Bolakisi bozangi nguya ya masanga ya mokili elobamaki mokolo elekaki na Santu-Papa na lisukulu na ye liboso ya ba ntoma bazuami na Vatican.
Na bolobeli ena, Orde ya Malte alakisi liboso ya batindami ya bikolo baye azali na bango na boyokani ntina ya kokolisa mosala mpo ya bato. “O eleko tozali koloba liboso ya bisambi na Haye mpe ya Assemblée générale na New York, ba nkoto ya ba civil bazali kokufa mpe ba nkama misusu bazali kotika bisika bavandaka”, elobi Fra John Dunlap, na bolobi mposa ya kolia, ya mayi, ya nkisi, bokembisi nzoto lisusu to lisungi ya molimo.
Mosala ya mbala moko ya diplomatie humanitaire
Na kati ya molongo ena ya mobulu, Ordre ya Malte ezali kokoba kolikia na bobimi ya bana ya Israël baye bakangami na Gaza mpe na bosungi ba civils na etuka ena ya Palestine. Mosala, makasi na botali mikakatano bizuami na nzela ya ba ONG na bokumbi bilei, esalemaki malamu na bosali na bomoko na Patriarcat latin ya Jérusalem, ya paloisse katoliko ya Gaza mpe ya Caritas. « Eteni monene ya lisungi na biso ezalaki na mbuma mpe ndunda ya sika, biloko bikomonana te mpe bikomi ntalo na Gaza », Mokambi Monene ya ntuku mwambi na moko asembolaki, na bolobi ete esalemaki kaka bongo epayi ya bato ya Cisjordanie. Mabele eye babotola na makasi ezuaki « ba lolenge makasi ya mobulu » bibebisaki misala ya bosungi, bipekisaki bopanzi ba lopitalo ya koningana ya Ordre, mpe ekati, ndakisa, lisungi ya minganga mingi mpenza na bituka ya ba bédouins.
Atako mikakatano bizalaki, Ordre ekokoba kozala kuna, mingi mpenza na nzela ya lopitalo ya Libota Lisantu na Bethléem eye ezangi ba pèlerins mpe mosolo. O eleko ya ba vœux na ye, Mokambi Monene abetaki nsete na ntina ya mikakatano na Liban epayi wapi Ordre ekopesa lisungi na likambo etali bokono, bilanga, eteyelo mpe koteya basali na nzela ya bisika ntuku motoba.
Bokangami ya Ordre na Mabele Esantu ezali na lisapo mpe ba mibu koleka ba nkama. « Tokoki te, mpe tolingi te, kotika bato na ye, baye balingi boboto ya sembo mpe ya seko mpo na région ena ya mikakatano », elobaki ye, na botondi koleka nkoto na nkama moko ya ba bénévoles mpe basali nkama ntuku mitano ya diplomatie ya Ordre. « Na esika ya mampinga ya kala, tokotinda lelo bato mpo na lisungi, ba lopitalo, bisika ya kolia, bisika ya kovanda mpo na ba migrant, mpe makambo misusu kilikili », esukisaki ye, alingi « komema bolingo mpe bokebi ya Kristu na baye babosana bango mpe na baye batia bango pembeni, na botali loposo, eyamba to origine ethnique na bango te ».