LEBANON-SYRIA-ISRAEL-PALESTINIAN-CONFLICT LEBANON-SYRIA-ISRAEL-PALESTINIAN-CONFLICT  (AFP or licensors)

Botiki kobeta masasi na Liban, Caritas ekobanga mpo na lobi eyebani te ya bato bakimaki

Elongi etondi na esengo atako ba ndako bikweyi na bitumba o liboso, wana ezali elili elakisami mokolo ya mosala moko 25 ya sanza ya zomi na moko na bapanzi sango ya Liban. Na lisolo azuaki na ba bapanzi nsango ya Vatican, sango Michel Abboud azongeli lolenge azali koyoka esangani na boyoki sango ya suka ya bitumba mpo na mikolo 60, eleko mpo na baye babundaki bazonga sima. Na makoki ya malonga te, m

Jean-René Bompolonga- Kinshasa

Butu ya liboso eleki na bobangi te ya bozui mbula ya masasi. Sima ya ba roquettes bibetamaki na Hezbollah, bilandanaki na ba bombardements ya Israël na Beyrouth, botiki kobeta masasi ebandi mokolo ya misato 27 ya sanza ya zomi na moko na tongo na Liban. Na Beyrouth, Lisanga ya ba ministres endimaki boyokani ezali na makambo 13 ewuti na masolo kati ya baye babundaki na lisalisi y’Amerika. Nsango ena, sango Michel alimboli yango na mongongo ya kolenga, ezalaki liboso mpenza “mpema moko makasi” ya esengo, sima ya sanza mibale ya etumba kati na bulamatari ya Israël ya Benjamin Netanyahu na Hezbollah.

Na liban, bobangi ezalaki komata, elobaki mokambi ya Caritas ya Liban. Babundi ya mouvement chiite babetami na masasi kobanda sima ya 7 ya sanza ya zomi, mpe mpo na kokimisa mbangu mbangu 60 000 ya bana ya Israël baye bavandaka na ndelo ya bikolo mibale, Israël atindaki mampinga na ye na mabele ya Liban na 23 ya sanza ya libwa elekaki. “Etumba epanzanaki na ekolo mobimba”, mpe epesaki bana ya ekolo banso “bobangi”. Mpo na bakambi ya Liban, bato koleka 3800 babungisi bomoyi na sanza 13, kati na bango 222 bato basalaka na lopitalo mpe, Unicef elobi, bana 240.

 

Feux d’artifice mpe bouchons

Ntango sango ya botiki kobeta masasi elobami, esengo etiki esika na bosepeli monene. Ba V ya elonga na bendele ya Hezbollah bibimi, kasi kokamwa ezalaki na banso. “Na nzela, bato babandi kosepela nsango”, elobi sango Abboud. “Botiki kobeta masasi ezali elikya ya boboto mpe tozali koyoka esengo kati na biso moko, tozalaki komona yango na miso ya bato”, atako tozalaki na matanga mpe ba ndako bikweyi, atako bobangi ezalaki na maye maleka. “O eleko ya guerres civiles, na Israël to na Syrie, botiki kobeta masasi ezuamaka, kasi etumba ezongaka kaka”, elobaki sango carmelite.

 

Lobi, mposa ya kondima yango ezalaki makasi, lokola liye ya komona lisusu -mpo na baye bakimaki- ndako na bango, mboka na bango

 

Mposa ya komona lisusu ndako na ye

Bitumba bisopaki na nzela pembeni ya milio 1,2 ya ba libanais mpe “bato mikama ebele bazongi na nzela na mituka”, na bokeli ba embouteillages makasi epayi ya Beka na monyele ya ekolo mpe na sudi. Mampinga ya ekolo, elobi sango, bakebisi bato mpo na bozongi mbangu mbangu bisika na bango.  Na sudi, etuka ezali na mikrobe, “elingi koloba likama ya liwa”, mpe baye bazali kobunda bazali nanu kuna. Mampinga ya Israël bazali na mikolo 60 mpo na kobima kasi kaka na tango wana Hezbollah asengeli kolongwa na nordi ya ebale Litani, koleka km 20 ya ndelo ya ekolo. Lobi, mpo na komeka kokata bozongi ya ba civils, mampinga ya Israêl bibwakaki ba obus na ngambo ya Kfar Kila mpe Khyam, ngonga mineyi sima ya boyokani mpo na kotika kobeta masasi.  

“Mokakatano sima ya mokakatano”

Basusu bakolikya kozonga na ndako na bango to mpe ya kopusana pembeni, soki ekweyi balala ata epayi ya  ba voisins, kasi misusu batikali bisika bayambaki bango na suka ya sanza ya libwa na kati ya koleka biteyelo 340 ya ekolo. Ba mboka na bango bibebi banso. “Tolingi mpe tosengeli kosunga bango”, elobi sango Abboud. Etikali ya koyeba lolenge nini.

Mokolo ya misato 27 ya sanza ya zomi na moko, ministre ya kala ya Eteyelo alobaki bozongi ya botangi ekobanda mokolo ya mineyi na biteyelo ya nse mpe ya likolo ya ba privés, mpe biteyelo ya leta bisengeli kobanda na eleko ena. Kasi, “epayi wapi bakokende bato wana banso?”, mokambi ya Caritas ya Liban amituni. “Tozali kobongisa mokakatano sima ya mokakatano”, elimboli ye. “Bato ebele bazali lisusu na mosala te”, pamba te, alobi lisusu, etumba ekotaki na mokakatano ya nkita eye ewumeli koleka mbula 5. Bato baye bazali na makoki ya kobika na ndenge esengeli te, “basungamaki na masanga ya Caritas mpe tolingi tokoba kosunga bango”, elobi sango ya Liban, kasi na makoki nini?

Ezali lokola sima ya bopanzani ya libongo ya Beyrouth te, ata lokola sima ya etumba ya 2006 te. Na 2006, bikolo mingi basungaki mpo na botongi ba ndako. Sik’oyo te. Na eleko eye ata eloko moko te ebongisami mpo na botongi mpo na bato”, elobi mokambi ya Caritas ya Liban. Lisanga eye ebandi kokomela bato baye bapesaka makabo. “Providence ezalaki na biso o eleko ya etumba eye, tozali na kondima ete ekotika biso te”.

 

28 November 2024, 16:07